Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

MONZELE YA MWASI YA BONZENGA

Publié le 29 Septembre 2013 par Lingala Kongo

MONZELE YA MWASI YA BONZENGA

Likambo ya bonzenga mpe kitoko, basusu balobi ekosilisa basi misolo mpe ezali mabe mpo na mwasi ya libala. Basusu mpe balobi ‘te ezali na ntina te, mpo mwasi ya kitoko abotamaka na kitoko na ye . Nzoka yango esali se ndenge balobaka ‘te « linzanza ebonga na langi », mwasi nyoso oyo alingi kozala kitoko asengeli komibongisa, koleka penza elongi na ye na suki ya motu oyo bato bakotalaka liboso.

Yango nde ememi biso na esika ya mosala ya mama Nicole Bido Ndavo na commune ya Kinshasa, na Rond point ya Huileries, na Kinshasa. Awa, tosololaki na elenge mwasi .Tolanda maloba ma ye.

Lingala Kongo : Oyebi mosala oyo ndenge nini ?

Mama Bido Ndavo Nicole :-Liboso na ngai kobanda mosala nayekolaki na Centre Gali na « Une deux Trois » na commune ya Kasa Vubu. Tango nazui diplôme na ngai nayei kobanda mosala na salon.

LK: -Awa na salon bosalaka penza nini ?

Mama Nicole:- Tosalaka lisalisi ya maboko na manzaka(manicure), lisalisi mpo na makolo (pédicure), bonzenga na lisalisi ya elongi na mpe nyoso oyo etali konyolisa nzoto(massage). Ezali mpo na kozongisa kimya kati ya nzoto soki misisa ya nzoto elembaki sima ya misala makasi, mpo kolemba wana ya mabe to mpasi esila. Nyoso wana sima ya kosimba nzoto oyo wana na ndenge toyekola kosimba yango

LK: Eloko nini bokobengaka bonzenga to kitoko ya mwasi ?

Mama Nicole: -Kitoko to bonzenga ezali makambo mibale. Kitoko, ezali makoki oyo mwasi abotamaka na yango. Kasi bonzenga ezali oyo mwasi akoki kobakisa mpo na kobongisa nzoto na ye.

Nzoka na oyo etali bikelakela (to produits ya beauté) ekosenga ‘te mwasi akende epai ya baye bayebi yango.Lokola biso . Biso nde tozali lokola basungi na ye mpo azua likama te. Talaka kaka bamama oyo babebisa nzoto na ba nkisi ndenge na ndenge. Yango esali ‘te kokenda salon ezali lokola mwa eteyelo mpo na mwasi .Mosala na biso ezali kobongisa oyo ezali, kobakisa oyo ekozanga. Mwasi mosusu suki na ye ezali moke, toko-baka ye basuki(plantage) ; mosusu mpe suki na bango ezali ya kokatana, tokotia yango nkisi mpo ezonga kobota malamu, soki mosusu mpe ezali na bosoto, tokosukola yango.

Yango wana mpo na biso, ‘’beauté’’ ezali ‘’kitoko’’ te ! Mpo moto mosusu akoki kobotama na kitoko te ,kasi soki tobongisi ye akoki kokoma kitoko.Ndakisa tala kaka ndenge tobongisaka basi na tango ya milulu ya libala !

Kasi mwasi mosusu azali na ntina ya kobakisa te.Akokaka mpe bamaquillage te. Bakotia kaka eloko moke lokola mwa fantaisie moke mpe kitoko na ye ebimi libanda lokola mwinda. Mosala na biso ezali nde kobongisa basi banso.

LK: Bozuaka bato mingi na eleko nini ?

MN: -Mingi na eleko ya Noël na Bonane.

LK : Malako nini bokopesa na bamama mpo na bankisi na bikelakela ya koluka bonzenga ?

LK: Tokosenga na bango batika kosalela nkisi lokola Hydroquinone na bankisi ya makasi oyo ekosilisa mafuta ya lomposo ya nzoto .

Mpo na bilei,basengeli kolia mingi bandunda lokola matembele na bandunda nyoso kaka.

LK : Mosala na bino ekofuta bino malamu ?

Mama Nicole : Ezali na yango kofuta kaka.

LK : Soki mbongo ezali mingi te, mwasi nyoso akoki mpe koya na salon ?

LK : Ekeseni na bozui ya moto na moto.Ata na 5 dollars tokoyamba yo tosala ata chignon ya kitoko, to 10 dollars tokobongisa nyoso .

LK: Nini bokoloba mpo na ‘’fond de teint’’, ezali malamu to mabe? Mpe na kokata nkiki to matiti ya miso (sourcils) bakobaka bafaux cils na miso olobi nini ?

LK : ‘’Fond de teint’’ ezali mpo na bato nyoso te. Soki olingi kolala esengeli kosukola elongi na ‘’démaquillant’’. Kasi bamama bakeba mpo bankisi misusu bakotia na kati ezali mpe kopesa makono ya makwanza na nzoto.Pudele (to talc) nde eleki malamu . Kotia nkiki to faux cils esengeli kokenda epai ya moto ayebi kosala yango malamu . Mpo lokola batiaka ‘’colle’’ mpo ekangema makasi , likama mpe ekoki kokweya mpe ‘’colle’’ wana ekoti na miso to ekangi miso.

LK : Olobi nini na oyo tokoma komona ‘te basi ya Bayindo bakoma se lokola basi ya Amérique to ya Asie,basundola kokanga suki ndenge ya mboka na biso mpe bakobaka bamèches .

LK :Wana ezali ndenge ya makambo ya ‘’mode’ to elateli ya sik’oyo. Bana tokobota mpe bakozala na mode to ndenge mosusu ya kosalela bonzenga.

LK: Mbela nini okopesa na bilenge basi ?

MN : Bilenge basi bafandi pamba, bakota na biteyelo ya koyekola misala ya maboko to bakenda koyekola epai ya moto oyo ayebi mosala. Tango ya lelo ezali lisusu ya kabela to pesa ngai te. Okobongisa bomoi na yo na motoki na yo. Bamama baya kotala biso na salon mpo bayeba ebongiseli nini esengeli na bango.

Maloba mayambami na Leobanem

Commenter cet article